Galatians 1

Ebandeli Ya Mokanda

1Ngai Polo, ntoma oyo abengamaki na bato te, to na nzela ya moto te, kasi na Yesu Klisto mpe na Nzambe Tata oyo asekwisaki ye kati na bakufi, 2na bandeko nyonso oyo bazali na ngai elongo, totindi mokanda oyo na mangomba ya Galatia. 3Tika ete bozwa ngolu mpe kimia oyo ewuti na Nzambe Tata mpe na Nkolo na biso Yesu Klisto, 4ye oyo amipesaki mpo na masumu na biso, mpo ete na mokano ya Nzambe mpe Tata na biso, akangola biso na mokili ya mabe ya tango oyo. 5Tika ete azwa nkembo libela na libela. Amen !

KOMILONGISA YA SANGO MALAMU

Sango Malamu Moko Kaka

6Nazali kokamwa mingi mpo na komona ndenge botiki noki penza moto oyo abengaki bino na nzela ya ngolu ya Klisto, mpo na kolanda Sango Malamu mosusu, 7nzoka nde Sango Malamu mosusu ezali te. Kasi ezali na bato oyo bazali kotia mobulu kati na bino mpe balingi kobongola Sango Malamu ya Klisto. 8Kasi ezala biso to mpe anzelu awuti na Likolo, ateyi bino Sango Malamu mosusu—oyo ekeseni na Sango Malamu oyo toteyaki bino, tika ete alakelama mabe 9Ndenge tolobaki yango liboso, sikʼoyo mpe nalobi yango lisusu : soki moto moko ateyi bino Sango Malamu mosusu oyo ekeseni na Sango Malamu oyo boyambaki, tika ete alakelama mabe. 10Sikʼoyo bokanisi nini ? Nazali koluka bato bandima ngai to Nzambe andima ngai ? To mpe nazali koluka kosepelisa bato ? Soki nazalaki nanu kosepelisa bato, wana nalingaki kozala mosali ya Klisto te.

Sango Malamu Oyo Ewutaki Na Klisto

11Bandeko, nalingi boyeba yango ete, Sango Malamu oyo nateyaki bino, ewutaki na moto te. 12Pamba te, nazwaki yango na moto te, nayekolaki yango mpe te, kasi Yesu Klisto moto alakisaki ngai yango. 13Pamba te, bosi boyoka ezaleli oyo nazalaki na yango : kala na tango nazalaki na kondima ya bayuda, ndenge nazalaki konyokola Lingomba ya Nzambe mpe ndenge nazalaki kosala nyonso mpo na kopanza yango. 14Nakkaki baninga na ngai mingi ya bayuda oyo tozalaki na bango bambula moko, na makambo etali kondima ya bayuda. Mpe nazalaki na molende mingi penza mpo na oyo etali bokoko ya bakoko na ngai. 15Kasi tango Nzambe, ye oyo aponaki ngai wuta na libumu ya mama na ngai, mpe abengaki ngai na ngolu na ye, 16asepelaki ete alakisa ngai Mwana na ye mpo nateya ye epai ya bato ya bikolo ya bapaya, nalukaki toli epai ya moto moko te, 17mpe nakendaki na Yeruzakm te mpo na kokutana na baoyo bakomaki bantoma liboso na ngai, kasi akendeki na Arabia mpe nazongaki lisusu na Damas. 18Sima ya bambula misato, bongo nakendaki na Yeruzakm mpo na koyebana na Piere. Mpe navandaki na ndako na ye mikolo zomi na mitano. 19Namonaki ntoma mosusu te, kaka Zaki ndeko ya Nkolo. 20Nzambe azali temwe na ngai, ete oyo nazali kokomela bino ezali lokuta te. 21Sima na yango, nakendeki na mikili ya Siriya mpe na Silisiya. 22Nzoka nde bato ya mangomba ya Yudeya, oyo bazalaki kati na Klisto, bayebaki ngai te. 23Bazalaki kaka koyoka sango ete : “Moto oyo azalaki konyokola biso kala, akomi sikʼoyo koteya kondima oyo ye alingaki koboma.” 24Bongo bazalaki kokumisa Nzambe mpo na ngai.
Copyright information for LinMNB